Elombe-文本歌词

Elombe-文本歌词

Mike Kalambay
发行日期:

Les autres n’ont pour Dieu que les œuvres de leurs mains, mais toi, tu es le seul Dieu vivant et puissant dont la divinité est incontestable. Alléluia ! C’est pourquoi nous venons te célébrer, hum ! Uh !

Tomemi nzembo lelo pona lokumu na yo Papa y’o mériter yango

Kumama Yahwe eh

Likolo y’ofandi na yo, olingaka masanjoli na ngai ebuta bipayi y’ozali

Kumama Yahwe eh

Tala ndenge kindoki esili nguya, soloka esila ngala liboso na mpate na Nzambe

Kumama Yahwe eh

Ô mon Dieu quand tu dis la chose arrive, quand tu ordonnes elle existe nini eyoka yo etosa te

Kumama Yahwe eh

Papa na ngai kumama nanu Yahwe ooh

Yahwe zua na yo lokumu Papa po yonde Nzambe ya koyemba

Mokonzi tomemi nzembo awa pona yo

Yahwe zua na yo lokumu Papa po yonde Nzambe ya koyemba

Loyemb’oyo ekomi elengi kaka po toyembi yo

Yahwe zua na yo lokumu Papa po yonde Nzambe ya koyemba

Jésus, refrain ya nzembo ya basantu yonde Nzambe ya koyemba !

Papa tala bato okufela tosangani awa kosanjola yo Yahwe eh

Toboyi mabanga eyemba n’esika na biso baye toza na pema Yahwe eh

Papa tala bikelamu na yo tosangani awa kokumisa yo Yahwe eh

Toboyi mabanga eyemba n’esika na biso baye toza na pema Yahwe eh

Nzambe tozo yembela awa asala bikamua alemba te

ELOMBE

Oyo tozo kumisa awa abenga liwa na kombo ya pongi

ELOMBE

Yesu tozo yembela awa atambola na mayi azinda te

ELOMBE

Amata na lola sans fusée, a défia la force de pesanteur

ELOMBE

Oyo Nzambe nini oyo mipepe na mbonge etosaka ye

ELOMBE

Oyo tozo yembela awa tobengaka ye mpanda njile eh

ELOMBE

Azongaka na sima te ELOMBE

Yaya Elombe ELOMBE

Elombe ya libota na ngai yii ELOMBE

Yesu Elombe ELOMBE

Elombe ya bitumba na ngai ELOMBE

Ya Yesu Elombe ELOMBE

Akotaka makambo na ngai ELOMBE

Moto ya makasi na ngai ELOMBE

Oyo tozo Sanjola awa tobengaka ye mopanga n’etumba

ELOMBE

Nzambe tozo kumisa awa abeta satana K.O

ELOMBE

Mobikisi ya maladi nionso, ba bokono ya ndenge na ndenge

ELOMBE

Nzambe tozo kumisa awa abikisa ba mingi na sida

ELOMBE

Aka ! Nzambe nini oyo alimwisa ba myomes na ba fibromes

ELOMBE

Atia boulevard na mayi yango tobengaka ye mpanda njile eh

ELOMBE

Azongaka na sima te ELOMBE

Lele lelele ELOMBE

Elombe ya bitumba na ngai ELOMBE

Tshilobu Elombe ELOMBE

Liboso ya makambo elekela nga makasi amemela nga elonga na ye ELOMBE

Ata nakufaki nakosekwa ELOMBE

Pona Yesu Elombe ELOMBE

Uh !

Yahwe eh Yahwe eh YAHWE EH YAHWE

Yahwe eh Yahwe eh iye YAHWE EH YAHWE

Papa eh Papa eh PAPA EH PAPA

Yahwe eh Yahwe eh yiii YAHWE EH YAHWE

Oy’afandi na bisika bileki likolo EZA YO

Oy’alekelaka mayele ya bana na bato EZA YO

Bipayi ofandi reçois l’offrande de nos acclamations

Oy’abongi na milolo na biso eza yo

Ozongaka na sima te ELOMBE

Lele lelele

Yesu na nga Elombe ELOMBE

Champion en toute catégorie ELOMBE

O signa golgotha pona ngai ELOMBE

Oloba tout est accompli ELOMBE

Omemela nga mikumba Yaya ELOMBE

Osilisa ba soni na ngai eh ELOMBE

Nzambe ya bomuana na nga ELOMBE

Le Dieu de mon appel ELOMBE

Uh ! Han, han

Tombola loboko likolo, tombola, loba avec assurance

Hum ! Go !

Elombe eh

Han ! Elombe

Yesu Elombe

Hé ! Yahwe eh Yahwe eh YAHWE EH YAHWE

Papa eh Papa eeeh PAPA EH PAPA

Nzambe oy’afandi na bisika bileki likolo EZA YO

Oy’abongi na milolo pe maboko na biso

EZA YOOOOO

Ha ha ha ! Alléluia !

JÉSUS ! ELOMBE